Hebrews 3

Yesu aleki Moyize

1Yango wana, bandeko basantu, bino baoyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botia makanisi na bino na Yesu, Mopostolo mpe Mokonzi ya banganga-Nzambe oyo tondimela. 2Azalaki sembo epai ya Nzambe ye oyo aponaki ye, ndenge Moyizempe azalaki sembo kati na ndako mobimba ya Nzambe. 3Yesu amonanaki ete azalaki ya kokoka mpo na kozwa lokumu monenekoleka Moyize, ndenge moko mpe, moto oyo atongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko. 4Pamba te, ndako nyonso batonga yango na moto, kasi Nzambe azali motooyo atongaka biloko nyonso.

5Moyize azalaki sembo lokola mosali, na kati ya ndako mobimbaya Nzambe, mpo na koloba makambo oyo Nzambe asengelaki koloba na mikolo oyo ezalaki koya. 6Kasi Kristo azali sembo lokola Mwana, mokonzi ya ndako ya Nzambe. Mpe biso tozali ndako na ye, soki tosimbi makasi kino na suka, molendena biso mpe elikya oyo tomipesaka na yango lokumu.

Bopemi ya baoyo bandimaka Nzambe

7Yango wana, ndenge Molimo Mosantu alobi : Lelo,
soki boyoki mongongo na ye,

8 Boyeisa mitema na bino
makasi te,
ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe,
ndenge bosalaki tango bomekaki ye
kati na esobe.

9 Kuna batata na bino bamekaki
ngai mpe batalaki motema
na ngai,
mpe bamonaki misala na ngai
na kati ya bambula
ntuku minei.

10 Yango wana, natombokelaki bato wana,
mpe nalobaki : Mitema na bango
ezali kopengwa tango nyonso,
mpe bayebaki banzela
na ngai te.

11 Bongo nalapaki ndayi
kati na kanda na ngai :
Bakokota te na
kopema na ngai !

12Bokeba bandeko, ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe oyo ezangi kondima, ete atika Nzambe ya bomoi. 13Kasi bolendisana moko na moko, mokolo na mokolo, lokola tozali naino kobengama “lelo” mpo ete moto moko te kati na bino masumu ekosa ye mpe ekomisa ye motema libanga. 14Pamba te tokomi lisanga na Kristo, soki tosimbi makasi kino na suka elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli. 15Lokola yango elobama : Lelo,
soki boyoki mongongo na ye,
boyeisa mitema na bino makasi te,
ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe.

16Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki ye ? Ezalaki te baoyo nyonso Moyize abimisaki na Ezipito ? 17Mpe, ayokaki kanda mpo na banani kati na bambula ntuku minei ? Ezalaki te mpo na baoyo basalaki masumu mpe bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ? 18Bongo na banani Nzambe alapaki ndayi ete bakokota te na bopemi na ye ? Ezali te na baoyo baboyaki kotosa ye ?

19Bongo tomoni ete, bazalaki na makoki te mpo na kokota, mpo bazangaki kondima.
Copyright information for LinMNB